Mbula na mbula, Cité de Restauration esangisaka bato na ba événement mpo na lokumu ya Nzambe. Tala mwa ndakisa :
Na ebandeli, Cité de Restauration ebongisaka mbula na mbula mikolo misato ya Nkembo. Mbula oyo, tozwaki ngolu ya kondima pastère Hélène NGOY, chantre ya Nzambe l’Or MBONGO mpe évangéliste Noëlla KAPINGA. Mikolo misato oyo ezalaki ya mapamboli mingi mpo na lisanga mobimba.
Tobandaka mpe kozala na Fête de la Musique kati na balabala ya Nantes. Ezali ntango ya evangelisation mpe libaku ya kosakola Kombo ya Yesu epai ya bato ebele.
Mpo na kolendisa bolingo kati na bandeko, Cité de Restauration ebongisaka mbula na mbula tournoi ya ndembo (football) na kati ya ba églises, tango ya esengo, kosangisa mpe kokabola motema moko.
Lisusu, ba membres ya Cité de Restauration bazwaka libaku mbula na mbula ya kozala na piknik, esika ya bosangani, kobosanola mpe koyeba bandeko.
“Tala ndenge ezali malamu, ndenge ezali kitoko, bandeko bázala na bomoi moko !” – Nzembo 133:1
Likambo moko na moko ezali elembo ya mitema ya Cité de Restauration : kokitisa lisanga, kokabola esengo mpe kosakola sango ya Yesu.
Zala lipamboli !