“Bolingo, Mosala, Bokonzi ya likolo !”

Yango nde lolemo na biso. Vision na biso ezali kobongola bomoi ya batu na bolingo ya solo, na mosala mpe na koluka kokoka na nyonso.

Tosepeli na koyamba bino na site officiel ya Cité de Restauration.

Kokanisami na libota ya pasteur KANDA, lisanga na biso ezali esika ya bobongiseli ya motema, epai moto nyonso akoki kozwa bolingo, kimia mpe esengo na Klisto Yesu.

Tokutanaka :

  • Lundi na ntɔngɔ mpo na lisanga ya tongo,
  • Vendredi mpo na culte ya kati ya simana,
  • Dimanche mpo na ba cultes mibale, oyo bokoki kolanda pe na live.

Soki ozali koluka biyano, ozali na posa ya lisanga, to ozali kaka na mposa ya koyeba lisusu mingi na tina ya kondima ya bokristo, oza na esika na yo awa !

Mokano na biso :

  • Kosakola Sango Malamu ya Yesu-Klisto mpe kokabola Liloba na Ye
  • Kosalisa bandimi na nzela ya kolanda Nzambe mpe kotonga lisanga ya bolingo
  • Kosala misala ya pasteur (Bala, Kobatisa, Kokende kotala maladi, …)

Tobengeli bino bóyeba makambo ya misala na biso, ba moments ya libondeli, ba enseignements, mpe bóya na ba cultes na biso.

Bózala na mapamboli, mpe boyei bolamu na Cité de Restauration !

Tala vɛrɛ ya mokolo awa

Vɛrsɛ ya mokɔlɔ :

Tika tósangana !

Ozali na motuna ? Olingi tólobela libondeli ? To olingi kaka kotindela biso nsango ? Soki ezali mpo na posa, nsango ya culte, to kaka na motuya moko ya libondisi, kobanga te ! Tika Nzambe apambola yo !

Please enable JavaScript in your browser to complete this form.

Scroll to Top